EKLESIA MOKO, YA ESANTU, CATHOLIQUE, YA BA APOSTOLO MPE YA PALMAR (PALMARIENNE)
Eklesia ya Catholique ya libela-libela,
ekelami na y nkolo na biso Yezu Klisto.
Bokitani na bosolo mpona Cathèdre ya Santu Petelo,
Ekambami Nà Bosantu naye nyonso Pàpa Petelo III,
De Glória Ecclésiæ
Eklesia ya Catholique ya libela-libela, ekelami na y nkolo na biso Yezu Klisto. Bokitani na bosolo mpona Cathèdre ya Santu Petelo, Ekambami Nà Bosantu naye nyonso Pàpa Petelo III,
De Glória Ecclésiæ
Oyo ezali site officiel kaka moko na ntina ya Eklezia Moko, Ya Esantu, Catholique, ya ba Apostolo mpe ya Palmar, endimami na Tata Mopesi ndingisa ya ba Carmélites, Nà Bosantu naye nyonso Pàpa Pedro III. Mpona boluki nyonso ya lolenge misusu na ntina ya Eklesia Catholique ya Palmar, esengeli ko luka kaka na ba comptes ya réseaux sociaux oyo endimami na Eklezia Catholique ya Palmar, na wapi ba liens misusu ezuami na nsé ya page oyo. Ba publications mingi na kati ya Internet ezali kozanga bosolo, eko kesena mingi mpe eko zala na précision te.
Eklezia Catholique ya libela-libela ezuami wapi?
Lisolo ya mokuse mpenza
Na mokolo 30 sanza ya misato (mars) ya mobu 1968, Santu Moseka ya Carmen abimelaki bana ya basi mineyi (4) Mpona mbala ya liboso na mboka ya El Palmar de Troya, Utrera, Seville, Espagne, na nzete oyo ba bengi Lentisque. Na lentisque, wana kobima ya liboso, eloko moko te etikalaki, Mpo ba ndimi ba komaki ko kata ba branches na yango lokola ba reliques ya ntalo. Ba tiaki mwa ekulusu ya libaya na esika yango, mpe pene-pene batu bazalaki ko bondela, na yango nde ba voyants bazalaki kozua bokutani ya lola. Na lolenge wana nde ba bateli esika oyo Santu Moseka aponaki ntango abimaki mbala ya liboso. Sima na yango ba tiaki na esika wana oyo ya Lentisque Elongi ya Esantu ya Yezu mpe elili ya Mama na Biso ya Palmar.
Na sima ya bana ya basi mineyi oyo ya liboso, ezalaki na ba voyant mosusu oyo ba kambamaki na molimo na ndenge ya nkamwa mpe bazuaki maloba ya motuya oyo ewutaki na Lola.
Esika ya Esantu wana, oyo na mikolo ekoya eko zala Siège ya Eklezia ya Esantu ya Palmar, ebongisamaki na Santu Moseka Maria kobanda ko leka mibu 100 (un siècle) nà ba mbala mingi oyo ye abimà na bisika ebele lokola La Salette na mobu 1846, Lourdes na mobu 1858, Fátima na mobu 1917, Garabandal na mobu 1961 mpe bisika biyike mosusu.
Esika Esantu ya Lentisque ya El Palmar de Troya ezalaki esika oyo ba bandaki ko annoncer mukie-mukie situation oyo ebandaki ko tungisa Eklezia ya Catholique, ba événements oyo ekoya na tina na tina ya eklezia iye, bitumbu mpe ba catastrophes epayi ya batu oyo ebandaki ko bebisama kaka na nzela ya losambo, ya botubeli masumu mpe ko bundisa bo koli oyo ekotaki na Eklezia mpe ebandaki ko bebisa mingi, lokola: kopesa Communion Esantu na maboko, kozua yango na makolo au lieu ya ko fukama, bo longoli ya mimesano oyo ezalaki sacrées epayi ya ba prêtress na ba nonnes (ba ma-soeurs).
Bobebisami ya Eklesia na nzela ya ko falsifier doctrine traditionnelle, ba mbongwana na cérémonie ya misa, bolongoli ya Mbeka Esantu ya Misa, Bo longoli Santu Moseka Maria na esika nayé mpe ebele ya ba Santu na kati ya Tempelo ememi bobebi ya molimo ya batu ebele penza na kati ya Eklezia.
Santu Moseka, lokola mama ya Eklezia, ekomi tii lelo sima ya mayebisi mingi na mwa mboka wana oyo wapi, lokola pasteur pe doctoresse (docteur ya mwasi) ya Nzambe, azuaki mokanu ya ko zongisa lisusu Eklesia lokola église romaine ezalaki ko kende na ko kufa. Ko banda wana mbala ebele ekomaki ba apparitions ya Santu Moseka nà Nkolo na biso Yezu Klisto , ya tata ya seko na seko mpe mingi ya ba Santu oyo ba bandaki ko lengela, mukie-mukie, ba événements oyo ekoya na ntina ya Mama Mosantu Eklezia.
Ba messages ya kala oyo ba voyants ebele ba zuaki, bikamwa ya mpwasa, lobiko mpe ba phénomènes misusu ya ko kamwa esalaki ete El Palmar ebenda bapaya ebele, kaka na Espagne te kasi ya mokili mobimba, na boluki ya tradition mpe bosolo, mpo bazalaki ko zua yango te na ba églises romaines.
Voyant principal oyo nzambe aponaki mpo ete apesa na pole ya moto nyonso ba messages ya niveau ya likolo oyo eko pesama na El palmar, ezalaki elenge mobali moko ya mboka ya Séville, abotàmà na mokolo ya 23 ya sanza ya mineyi (avril) ya mobu 1946 mpe esengelaki àzala Pàpa monene na Eklesia Mama Mosantu oyo ezuami na Esika ya Esantu wana: Grégoire XVII. Clemente Domínguez mpe Gómez, lokola voyant principal ya El Palmar, azalaki kaka moyambi mayebisi ya motuya te, kasi Santu Moseka Maria azalaki elongo na kolela naye na kotondàkà ye elongo nà ba phénomène ya nkamwa mingi mpenza mpe bilembo ya ko kamwa oyo ezalaki ko talisa bosolo ya ba apparitions: kozala na molimo na lolenge moko ya nkamwa, bonbongwani, bikamwa ya lobiko, bilembo na nzoto (stigmations), ba communions ya lolenge mosusu, etc. Bilembo na nzoto oyo ezuamaki ezalaki signe moko ya polele pona ba oyo balingaki koyeba bosolo na ko mikitisa nyonso. Clemente Domínguez ako kokisa banda wana bintinda (missions) ya makasi koleka oyo moto moko akoki kosala, na yango, na lisungi mpe bokasi ya nzambe elongo na Mama Mosantu nayé, ayiki mpiko mpe abundi nà détermination mpe courage pona ko défendre bosolo.
Clemente asalaki mibembo ebele mpenza na koteyàkà mpona oyo etali El Palmar, ko béngisa mokili mpo baya ko yeba esika ya ko bikisama na liboso ya ko kweyisama, confusion mpe molili ebandaki ko régner na Eglise Romaine. Atako ba attaques, ba critiques mpe mafinga, atosaki etinda oyo epesamelaki yé mpe a mipesaki na mobimba nayé mpona ko panza sango ya malamu oyo ewuti na Lola.
Ba losambo elandanaki mpe esanganaki nà ko lendisama, oyo Nkolo mpe Santu Moseka bazalaki ko senga na Esika ya Esantu, mpe oyo ba zèles nayé ezalaki ko sala na jalousie, ewumelaki te mpo ebota mbuma.
Sima ya mwa ba mbula après ba apparitions wana, base ya molimo etiamaki na molongo na ordre réligieuse oyo ya motuya makasi na mikolo ya suka. Bibongiseli mpe ba consécrations ya ba membres ya hiérachie ecclésiastique ya sika na ba branches na yango ya ndenge-na-ndenge esalaki ete collège ya ba Episikopo mpe ya ba Apostolo ébanda kozua ba nombre ebele oyo eko bomba mpe kobatela ba Tradition Esantu ya Eklezia Catholique. Na esika oyo eponamaki mpona ko bombama na bopeto mpe vitalité ya catholicisme mpe ékoma esika ya ko komisa batu ba Pàpa, ba Palmarien bazalaki ko milengela kaka na molimo te, kasi ezalaki mpe motuya ete ba koma ko telemisa Tempelo ya Nzambe na bo nzoto esika oyo bako banda ko bonzela yé culte ya solo-solo, oyo ntango nyonso ezalaki ya ko kita na bisika mosusu ya mokili.
Donc, kaka na Esika ya Esantu wana Santu Moseka Maria akomaki ko monana na kobima ya liboso wana, mpe na bosenga nayé ya bo mama, batongaki oyo lelo ezali Cathédrale Basilique ya Mama Na Biso ya Palmar oyo alata Montole. Ba palmariens ba salaki makasi mpo ete ndoto wana ékoma solo, mpe kondima nà losambo ya elikia ezuaki écho na Providence ya nzambe.

Na liwa ya Pàpa Santu Pablo VI na mobu 1978, voyant Clemente, akomaki déjà Episikopo (Eveque), aponamaki mpe alataki montole epayi ya Nkolo na apparition moko ya monene na Santa Fe ya Bogotá, Colombie. Papa ya lokumu wana Grégoire XVII a célébraki ba Santu mibale mpe ba conseils dogmatiques ya minene, oyo ebimisaki ba bijoux ya solo-solo na esika oyo batiaka biloko ya ntalo oyo ya Esantu (Sacro-saint) ya Lisakoli ya Nzambe, lolenge moko na batu oyo bazalaki traités na doctrine mpe na moral.
Na mikolo oyo (actuelement) Pàpa ya solo aza oyo afandaka na El Palmar de Troya, azali ko régner na nkombo ya Petelo III. Yé azali mpenza Pàpa, Vicaire ya Klisto awa na nsé. Oyo azali na yé te, azali mpe na Klisto te. Kaka ba nganga ya Nzambe ya Eklezia Moko, ya Esantu, Catholique, ya ba Apostolo mpe ya Palmar, nde bazali na nguya ya ko kamba mpenza ba Sakramento ya Esantu mpe ko célébrer mbeka ya Esantu ya Misa.
Na mikolo oyo, ba ndimi ebele ya bikolo biyike bayaka mingi-mingi nà lisanga moko ya nguya na Esika ya Esantu wana, ko bonza culte oyo esengeli na Nzambe mpe Mama Mosantu nayé mpe kolongola masumu ya bato na mokili. Ba culte ya mawa makasi mpe ba processions ya ko zala na molimo na nguya makasi esalaka ete kondima ézala ntango nyonso, na bozeli elonga ya Eklezia esantu ya Palmar.
Bilembo ya Eklezia ya Solo
1. Eklezia ya Klisto ezali moko, Ya Esantu, Catholique, ya ba Apostolo mpe ya Palmar:
- Ezali moko kati na kondima, mpo bosolo oyo Nzambe asakoli ezali kaka moko mpona moto nyonso; ezali Moko na gouvernement, Mpo ezali kaka na mutu moko oyo emonanaka, yé nde azali Pàpa; mpe ezali moko na ba Sakramento, mpo ezali kaka yango mpona ba ndimi nyonso ya Eklesia.
- Ezali ya Esantu, mpo ekelama na Mosantu, bosantu ezali doctrine na yango, ba santu bazali but na yango pe ebele ya ba membres na yango.
- Ezali Catholique, mpo ezali universelle, lokola esangisaka bosolo nyonso mpe ezali ya peuples nyonso.
- Ezali ya ba Apostolo, Mpo hiérachie mpe doctrine na yango ewuti epayi ya ba Apostolo.
- Ezali ya Palmar, mpo ezuami sika oyo na El Palmar de Troya-Séville, Espagne.
2. Eklezia ya Klisto ya solo-solo ba bundelaka yango te, elongamaka te mpe ebebisamaka te, mpona elaka ya Mokeli na yango «Bikuke ya lifelo eko telemela yango te».
3. Eklezia ya Klisto ya solo-solo ebengamaka mpe «Eklezia ya Klisto ya Palmar ya ba Carmélites ya Sainte Face», to «Eklezia ya Klisto ya Palmar», to «Eklezia ya Palmar»; ebongo, ezali lolenge moko mpenza koloba «Eklezia moko, Ya Esantu, Catholique, ya ba Apostolo mpe ya Palmar».
4. Eklezia ya Palmar ezali kaka moko mpe Eklezia ya Klisto oyo endimama, nkombo na yango ewuti epayi ya Klisto, mokeli na yango azali ya Nzambe.
5. Na mokolo ya motoba (6) ya sanza ya mwambe (aout) ya mobu 1978, sima ya liwa ya Pàpa Santu Pablo VI, Nkolo na biso Yezu Klistu, elongo na ba Apostolo Santu Petelo mpe Santu Pablo, aponi mpe alatisi Pàpa ya sika montole, Santu Grégoire XVII ya Likolo mpe Motuya. Kobanda wana, église romaine ezali lisusu Eklezia ya solo-solo te.
6. Na kokweyisama ya église romaine, Klisto alongoli Eklezia nayé na Roma akomisi yango na El Palmar de Troya na mokolo ya libwà (9) ya sanza ya mwambe ya mobu 1978. Na boponami ya Pàpa Santu Grégoire XVII ya Likolo mpe Motuya, mpe bomemami ya Eklezia na El Palmar de Troya, Eklezia ya Klistu ya solo-solo ebengamaki Palmarienne (ya Palmar).
7. Molimo Mosantu azali Molema ya Eklezia kaka moko ya solo-solo; oyo ezali Moko, Ya Esantu, Catholique, ya ba Apostolo mpe ya Palmar; libanda nayé Molimo ya Nzambe akoki ko fanda na milema ya bato te.
8. Ba membres ya Eklezia ya Palmar basali molongo ya ba Carmélites ya Sainte face elongo na Yezu mpe Maria, oyo ezali na biteni misato (3): Religieux, religieuse mpe ba ndimi ya misato (les fidèles tertiaires).
9. Na mokolo ya 30 ya sánzá ya nsambo ya 1982, Pàpa Santu Grégoire XVII alongolaki ba nguya nyonso epayi ya ba episikopo, ba sango (ba prêtres) mpe ba diakono oyo bazali libanda ya Eklezia Moko ya solo-solo, Ya Esantu, Catholique, ya ba Apostolo mpe ya Palmar. Alongolaki mpe ba caractères ya Esantu ya ba reliques nyonso, bilili, biloko ya culte, ba autels, etc., ya ba eklezia oyo ekweyisàmà, oyo ba boyà bosolo mpe ba oyo ba bungà nzela. Lisusu, presence eucharistique ya Klisto mpe Maria elimwaki na ba tabernacles nyonso ya mokili oyo ezalaki ya Eklezia ya Palmar te.
10. Ba episikopo, ba sango mpe ba diakono oyo bazali libanda ya Eklezia Moko, Ya Esantu, Catholique, ya ba Apostolo mpe ya Palmar, bazali na nguya te ya ko sala ba misala oyo ba prêtres basalaka na ndege elongobani.