Biso tozali ba nani? – Iglesia Catolica Palmariana

Eklesia, Moko, Ya Esantu, Catholique, Ya ba Apostolo mpe ya Palmar To Eklezia ya Klisto ya Palmar

Biso tozali ba nani?

Motuna oyo ezali pètè pona koyanola. Tozali bayékoli ya Santu Moseka Maria. Na yé nde tomibonzá na mobimba nyonso. Kolinga Santu Moseka Maria na bozindó makasi esálamaka mingi epayi ya batu ya Palmar (ba Palmariens). Ezali mpenza likambo oyo tondimaka té moto a discuter na yango. Moto oyo aboyi kolinga mpe kosalela Mámá wa Nzámbe akosepela nayé mpe kozala moko kati na Eklezia ya Palmar te. Bolingo nabisó mpona Mámá na bisó ya Lola ezali ya libanda mpe ya kati. Bolingo nabisó ya kati etalisamaka na confiance ya makasi oyo biso bato ya Palmar tozali na yango epayi nayé mpe gratitude moko profonde mpona misala ya nkamwa (miracles)ebele, ya minene mpe ya miké, oyo yé azokoba kosala mpona bana nayé ya sembo (fidèles) na kati ya Eklezia ya Palmar. Bolingo nabisó ya libanda emónanaka mingi-mingi na bilili ya bonzega, ya komipesa na bozindó (dévotion profonde), oyo etondisami na kibonzenga (richement ornés), na bilili ya bosantu mpe makomi oyo epesaka ba inspirations ya komipesa na bozindó pona Mámá Maria, mpe ba broderies ya kitoko oyo esálamaka mikolo nyonso na Eklezia ya Palmar. Na kati ya ba nzembo ya Eklezia ya Palmar, ebele ezali kaka na ntina ya Moseka Maria oyo atombwama makasi (Exaltée), Mámá ya Nzambe mpe Mámá wa Biso; ba nzembo etóndá bonzéngá oyo ematisaka milimo na biso esika moko na ba séraphins na ba korali ya lola, na koyembaka nkembo mpe masanjoli na Nzambe Mókó (Un) mpe Isáto (Trine) na matondi mpona kozala bana ya Mámá moko boboto mpenza lokola Maria.

Santu Móseka Maria atindámi mpona komema bisó epayi ya Mwana nayé ya Nzambe, Yesu Klisto, mpe kolinga Trinité Esántu. Ye azali nzela ya Lola mpe na Eklezia ya Palmar babetaka sété mingi na makambo ye ateyá ntango Abimaki na bisika ebele ya mokili, kolobela mingi-mingi oyo etáli bosenga ya kobondela mpe pénitence mpo éte ékokisama na Eklezia ya Palmar. 

Ti na mokolo ya motoba (6) ya sánzá ya mwambe (août) ya mobú 1978, Sántu Móseka Maria abandáki komema ba fidèles nayé ebele na kati ya Eklezia Catholique Ya ba Apostolo ya Roma, lolenge asalaki yango pendant pene-pene ya 20 siècles. Mpona botiki ya Eklezia ya Roma, Nkolo Nabisó Yesu Kristo akátáki nyonso na Roma, mpe na nsima ya liwa ya Pàpa Sántu Polo VI,  Nkolo Nabisó atindi ba fongola ya Santu Petelo epayi ya kibomoto ya Pàpa Santu Grégoire XVII, le Très Grand. Na lolenge wana nde Eklezia ya Solo-solo ekomaki na désert ya El Palmar de Troya, na kobatela ba tradition mpe ba rites oyo Eklezia Catholique ebandáki kotéya wuta ba mbula.

Na káti ya mibu zomi (10 ans), Mampinga ya Lola emonisámaki mpenza na Lentisque Esantu ya Palmar, kopesa makasi, kopesa ba toli mpe koléngela na molimo bana nayé ya bolingo mingi, mpo ete siège ya Esantu élongwa na Vatican mpona kokende na El Palmar de Troya, concrètement na enceinte Sacrée ya Lentisque. Pendant mibú libwá (9 ans), Kristo abongisáki bato biyiké mpo ete bákóba na mosala oyo Nkóló nabisó abandáki wutá pene ya ba siècles 20. Mibalé káti na bato wana ezali nde Pàpa Grégoire XVII mpe Pàpa Petelo II.

Mpona bonzéngá mpe boyéngebene ya mayángani nayé ya Bonzambé mpe mpona kibosántu ya ba membres nayé ebele, Eklezia, Mokó, Ya Esantu, Catholique, Ya ba Apostolo mpe ya Palmar ebongi éyékolama mpe étalama malamu na bobangi moko ya esantu. Mpona baye batioláki mpe bapanzáki ba nsango ebelé ya lokutá mpona kobébisa mosala oyo ya Nzambe ná bato oyo bazali káti na yango, tolobi ete eloko eloko ya Nzambe batiolaka yango té. Ba tioli mpe bato nyonso ya lokutá balénga! Mingi-mingi, baye ba publiáki makambu ya bosoto (infamies) na bisiká ya communication de masse; bakóló ba búku oyo bazali koyébana mpe kozua misolo na kokoma ba búku mpe mikandá ya lokutá, oyo ezanga fondement. Ezali na excuse mokó té kondima ete bato ya lokutá wáná bázua yo na bopete nyonso, mpamba té bakambámi mpenza epayi ya satána yé mókó mpo ete bábundisa Eklezia ya Kristo ya Solo-solo na bokási nyonso. Bangúná oyo, Kristo alóngá bangó liboso ya kobunda, mpamba té Kristo akobátela Eklezia nayé ézala peto mpe akotika té bikúké ya lifelo ékonza yango.